Embrasser l'Islam, cliquez ici
Islam Al-Haq: Coran mpe Hadisi
(Islam ya solo)

Q.S Noa (نُوح) - 28 Motángo ya Bavɛrsɛ

(Noa)

Qari

Murottal Audio

1

اِنَّآ اَرْسَلْنَا نُوْحًا اِلٰى قَوْمِهٖٓ اَنْ اَنْذِرْ قَوْمَكَ مِنْ قَبْلِ اَنْ يَّأْتِيَهُمْ عَذَابٌ اَلِيْمٌ

innā arsalnā nūḥan ilā qaumihī an anżir qaumaka min qabli ay ya'tiyahum ‘ażābun alīm(un).

Ya solo, totindaki Noa epai ya bato na ye (na etinda), “Pesá bato na yo likebisi liboso ete etumbu ya mpasi eya epai na bango.”


2

قَالَ يٰقَوْمِ اِنِّيْ لَكُمْ نَذِيْرٌ مُّبِيْنٌۙ

qāla yā qaumi innī lakum nażīrum mubīn(un).

Ye (Noa) alobaki: "Ee bato na ngai! Ya solo, nazali mokebisi oyo azali kolimbola bino, .


3

اَنِ اعْبُدُوا اللّٰهَ وَاتَّقُوْهُ وَاَطِيْعُوْنِۙ

ani‘budullāha wattaqūhu wa aṭī‘ūn(i).

(elingi koloba) kosambela Allah, kobanga Ye pe kotosa ngai, .


4

يَغْفِرْ لَكُمْ مِّنْ ذُنُوْبِكُمْ وَيُؤَخِّرْكُمْ اِلٰٓى اَجَلٍ مُّسَمًّىۗ اِنَّ اَجَلَ اللّٰهِ اِذَا جَاۤءَ لَا يُؤَخَّرُۘ لَوْ كُنْتُمْ تَعْلَمُوْنَ

yagfir lakum min żunūbikum wa yu'akhkhirkum ilā ajalim musammā(n), inna ajalallāhi iżā jā'a lā yu'akhkhar(u), lau kuntum ta‘lamūn(a).

Akolimbisa masumu na bino mosusu mpe akopesa bino bopemi (akoyeisa bomoi na bino molai) mpo na eleko moko boye. Ya solo, mobeko ya Nzambe (Allah), ntango ekoya, ekoki kozongisama nsima te, soki boyebaki.”


5

قَالَ رَبِّ اِنِّيْ دَعَوْتُ قَوْمِيْ لَيْلًا وَّنَهَارًاۙ

qāla rabbi innī da‘atu qaumī lailaw wa nahārā(n).

Ye (Noa) alobaki : « Ee Nkolo na ngai, ya solo nabeleli bato na ngai butu na moi, .


6

فَلَمْ يَزِدْهُمْ دُعَاۤءِيْٓ اِلَّا فِرَارًا

falam yazidhum du‘ā'ī illā firārā(n).

kasi libiangi na ngai ebakisaki (kondima) na bango te, na esika na yango bakimaki (na bosolo).


7

وَاِنِّيْ كُلَّمَا دَعَوْتُهُمْ لِتَغْفِرَ لَهُمْ جَعَلُوْٓا اَصَابِعَهُمْ فِيْٓ اٰذَانِهِمْ وَاسْتَغْشَوْا ثِيَابَهُمْ وَاَصَرُّوْا وَاسْتَكْبَرُوا اسْتِكْبَارًاۚ

wa innī kullamā da‘autuhum litagfira lahum ja‘alū aṣābi‘ahum fī āżānihim wastagsyau ṡiyābahum wa aṣarrū wastakbarustikbārā(n).

Mpe ya solo, mbala nyonso oyo nabengaka bango (bandima) mpo ete Olimbisa bango, batiaka misapi na bango na matoyi mpe bazipaka bilamba na bango (likolo ya bilongi na bango) mpe bazali kaka (kowangana) mpe bazali na lolendo mingi mpo na bango moko.


8

ثُمَّ اِنِّيْ دَعَوْتُهُمْ جِهَارًاۙ

Ṡumma innī da‘autuhum jihārā(n).

Na nsima, nabengaki bango mpenza polele.


9

ثُمَّ اِنِّيْٓ اَعْلَنْتُ لَهُمْ وَاَسْرَرْتُ لَهُمْ اِسْرَارًاۙ

Ṡumma innī a‘lantu lahum wa asrartu lahum isrārā(n).

Bongo nabelelaki bango polele mpe na kobombana, .


10

فَقُلْتُ اسْتَغْفِرُوْا رَبَّكُمْ اِنَّهٗ كَانَ غَفَّارًاۙ

faqultustagfirū rabbakum innahū kāna gaffārā(n).

yango wana nalobaki (na bango) : «Senga bolimbisi epai ya Nkolo na bino, Ya solo, Ye azali Molimbisi mingi, .


11

يُّرْسِلِ السَّمَاۤءَ عَلَيْكُمْ مِّدْرَارًاۙ

yursilis-samā'a ‘alaikum midrārā(n).

ya solo, Ye akokweisa mbula makasi uta na lola likolo na bino, .


12

وَّيُمْدِدْكُمْ بِاَمْوَالٍ وَّبَنِيْنَ وَيَجْعَلْ لَّكُمْ جَنّٰتٍ وَّيَجْعَلْ لَّكُمْ اَنْهٰرًاۗ

wa yumdidkum bi'amwāliw wa banīna wa yaj‘al lakum jannātiw wa yaj‘al lakum anhārā(n).

mpe Abakisaki biloko na bino mpe bana na bino, mpe akelaki bilanga mpo na bino mpe akelaki bibale mpo na bino.”


13

مَا لَكُمْ لَا تَرْجُوْنَ لِلّٰهِ وَقَارًاۚ

mā lakum lā tarjūna lillāhi waqārā(n).

Pona nini bozali kobanga bonene ya Allah te?


14

وَقَدْ خَلَقَكُمْ اَطْوَارًا

wa qad khalaqakum aṭwārā(n).

Mpe ya solo, akela bino na ba étapes (ba événements) ebele.


15

اَلَمْ تَرَوْا كَيْفَ خَلَقَ اللّٰهُ سَبْعَ سَمٰوٰتٍ طِبَاقًاۙ

alam tara kaifa khalaqallāhu sab‘a samāwātin ṭibāqā(n).

Omoni te ndenge Allah akela lola sambo na couches?


16

وَّجَعَلَ الْقَمَرَ فِيْهِنَّ نُوْرًا وَّجَعَلَ الشَّمْسَ سِرَاجًا

wa ja‘alal-qamara fīhinna nūraw wa ja‘alasy-syamsa sirājā(n).

Mpe kuna Akelaki sanza oyo ezali kongenga mpe akómisaki moi mwinda (ya kongenga)?


17

وَاللّٰهُ اَنْۢبَتَكُمْ مِّنَ الْاَرْضِ نَبَاتًاۙ

wallāhu ambatakum minal-arḍi nabātā(n).

Mpe Allah azali kosala ete okola uta na mabele, kokola (mokemoke), .


18

ثُمَّ يُعِيْدُكُمْ فِيْهَا وَيُخْرِجُكُمْ اِخْرَاجًا

Ṡumma yu‘īdukum fīhā wa yukhrijukum ikhrājā(n).

nde akozongisa bino na yango (mokili) pe akobimisa bino (na Mokolo ya Lisekwa) ya solo.


19

وَاللّٰهُ جَعَلَ لَكُمُ الْاَرْضَ بِسَاطًاۙ

wallāhu ja‘ala lakumul-arḍa bisāṭā(n).

Mpe Nzambe (Allah) asalaki mabele mpo na bino lokola etando, .


20

لِّتَسْلُكُوْا مِنْهَا سُبُلًا فِجَاجًا ࣖ

litaslukū minhā subulan fijājā(n).

mpo ete okoka kokende awa na kuna na banzela ya minene.


21

قَالَ نُوْحٌ رَّبِّ اِنَّهُمْ عَصَوْنِيْ وَاتَّبَعُوْا مَنْ لَّمْ يَزِدْهُ مَالُهٗ وَوَلَدُهٗٓ اِلَّا خَسَارًاۚ

qāla nūḥur rabbi innahum ‘aṣaunī wattaba‘ū mal lam yazidhu māluhū wa waladuhū illā khasārā(n).

Noa alobaki: «Ee Nkolo na ngai, ya solo bazangaki botosi na ngai, mpe balandaki baoyo bozwi mpe bana na bango ebakisaki bobele bobungisi na bango, .


22

وَمَكَرُوْا مَكْرًا كُبَّارًاۚ

wa makarū makran kubbārā(n).

mpe basalaki bokosi monene.”


23

وَقَالُوْا لَا تَذَرُنَّ اٰلِهَتَكُمْ وَلَا تَذَرُنَّ وَدًّا وَّلَا سُوَاعًا ەۙ وَّلَا يَغُوْثَ وَيَعُوْقَ وَنَسْرًاۚ

wa qālū lā tażarunna ālihatakum wa lā tażarunna waddaw wa lā suwā‘ā(n), wa lā yagūṡa wa ya‘ūqa wa nasrā(n).

Mpe balobaki: "Kotika (kosambela) nzambe na yo ata moke te mpe kotika (kosambela) Wadd ata moke te, mpe Suwa', Yagus, Ya'uq mpe Nasr te."


24

وَقَدْ اَضَلُّوْا كَثِيْرًا ەۚ وَلَا تَزِدِ الظّٰلِمِيْنَ اِلَّا ضَلٰلًا

wa qad aḍallū kaṡīrā(n), wa lā tazidiẓ-ẓālimīna illā ḍalālā(n).

Mpe ya solo, bakambaki mingi na nzela; mpe kobakisa na bato oyo bazali sembo te eloko mosusu longola kaka libunga.


25

مِمَّا خَطِيْۤـٰٔتِهِمْ اُغْرِقُوْا فَاُدْخِلُوْا نَارًا ەۙ فَلَمْ يَجِدُوْا لَهُمْ مِّنْ دُوْنِ اللّٰهِ اَنْصَارًا

mimmā khaṭī'ātihim ugriqū fa'udkhilū nārā(n), falam yajidū lahum min dūnillāhi anṣārā(n).

Na tina ya mabunga na bango, bazindisaki bango pe sima batiaki bango na lifelo, yango wana bazalaki na lisungi mosusu te longola se Allah.


26

وَقَالَ نُوْحٌ رَّبِّ لَا تَذَرْ عَلَى الْاَرْضِ مِنَ الْكٰفِرِيْنَ دَيَّارًا

wa qāla nūḥur rabbi lā tażar ‘alal-arḍi minal-kāfirīna dayyārā(n).

Mpe Noa alobaki, “Ee Nkolo na ngai, kotika te moko na bato bazangi kondima azala na mabele.


27

اِنَّكَ اِنْ تَذَرْهُمْ يُضِلُّوْا عِبَادَكَ وَلَا يَلِدُوْٓا اِلَّا فَاجِرًا كَفَّارًا

innaka in tażarhum yuḍillū ‘ibādaka wa lā yalidū illā fājiran kaffārā(n).

Ya solo, soki Otiki bango batikala, bakobungisa basali na Yo nzela, mpe bakobota kaka bana mabe mpe bazangi botondi.


28

رَبِّ اغْفِرْ لِيْ وَلِوَالِدَيَّ وَلِمَنْ دَخَلَ بَيْتِيَ مُؤْمِنًا وَّلِلْمُؤْمِنِيْنَ وَالْمُؤْمِنٰتِۗ وَلَا تَزِدِ الظّٰلِمِيْنَ اِلَّا تَبَارًا ࣖ

rabbigfir lī wa liwālidayya wa liman dakhala baitiya mu'minaw wa lil-mu'minīna wal-mu'mināt(i), wa lā tazidiẓ-ẓālimīna illā tabārā(n).

O Nkolo na ngai, limbisa ngai, baboti na ngai, mpe moto nyonso oyo akoti na ndako na ngai na kondima mpe bandimi banso, mibali mpe basi. Mpe kobakisa na bato bazangi bosembo eloko mosusu te longola se kobebisama."