Qari
Murottal Audio
حٰمۤ ۚ
Ḥā mīm.
Ha Mim
تَنْزِيْلُ الْكِتٰبِ مِنَ اللّٰهِ الْعَزِيْزِ الْحَكِيْمِ
tanzīlul-kitābi minallāhil ‘azīzil-ḥakīm(i).
Buku oyo ebimaki epai ya Allah, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Moto ya mayele koleka.
مَا خَلَقْنَا السَّمٰوٰتِ وَالْاَرْضَ وَمَا بَيْنَهُمَآ اِلَّا بِالْحَقِّ وَاَجَلٍ مُّسَمًّىۗ وَالَّذِيْنَ كَفَرُوْا عَمَّآ اُنْذِرُوْا مُعْرِضُوْنَ
mā khalaqnas-samāwāti wal-arḍa wa mā bainahumā illā bil-ḥaqqi wa ajalim musammā(n), wal-lażīna kafarū ‘ammā unżirū mu‘riḍūn(a).
Tokela lola mpe mabele mpe nionso oyo ezali kati na yango te longola se na bosolo mpe mpo na ntango moko boye. Kasi baoyo bazangi kondima babongolaka likebisi oyo epesami na bango.
قُلْ اَرَءَيْتُمْ مَّا تَدْعُوْنَ مِنْ دُوْنِ اللّٰهِ اَرُوْنِيْ مَاذَا خَلَقُوْا مِنَ الْاَرْضِ اَمْ لَهُمْ شِرْكٌ فِى السَّمٰوٰتِ ۖائْتُوْنِيْ بِكِتٰبٍ مِّنْ قَبْلِ هٰذَآ اَوْ اَثٰرَةٍ مِّنْ عِلْمٍ اِنْ كُنْتُمْ صٰدِقِيْنَ
qul ara'aitum mā tad‘ūna min dūnillāhi arūnī māżā khalaqū minal-arḍi am lahum syirkun fis-samāwāt(i), i'tūnī bikitābim min qabli hāżā au aṡāratim min ‘ilmin in kuntum ṣādiqīn(a).
Loba (Muhammad), "Limbola (na ngai) na ntina ya maye bosambelaka longola se Allah; lakisa ngai maye basalaki uta na mabele to soki basanganaki na (bozalisi ya) lola? Memela ngai buku oyo ezalaki liboso ya oyo (Coran) to eloko oyo etikali ya boyebi (ya bato ya kala), soki ozali na bosolo."
وَمَنْ اَضَلُّ مِمَّنْ يَّدْعُوْا مِنْ دُوْنِ اللّٰهِ مَنْ لَّا يَسْتَجِيْبُ لَهٗٓ اِلٰى يَوْمِ الْقِيٰمَةِ وَهُمْ عَنْ دُعَاۤىِٕهِمْ غٰفِلُوْنَ
wa man aḍallu mimmay yad‘ū min dūnillāhi mal lā yastajību lahū ilā yaumil-qiyāmati wa hum ‘an du‘ā'ihim gāfilūn(a).
Mpe nani azali kobunga nzela koleka baye basambelaka mosusu longola se Allah (kosambela) oyo bakoki kondima (losambo) na bango te kino mokolo ya lisekwa mpe bazali koboya (kotya likebi na) losambo na bango?
وَاِذَا حُشِرَ النَّاسُ كَانُوْا لَهُمْ اَعْدَاۤءً وَّكَانُوْا بِعِبَادَتِهِمْ كٰفِرِيْنَ
wa iżā ḥusyiran-nāsu kānū lahum a‘dā'aw wa kānū bi‘ibādatihim kāfirīn(a).
Mpe tango bato bakosangana (na Mokolo ya Lisekwa), nzambe akokoma monguna na bango mpe akowangana losambo oyo bafutaka na yango.
وَاِذَا تُتْلٰى عَلَيْهِمْ اٰيٰتُنَا بَيِّنٰتٍ قَالَ الَّذِيْنَ كَفَرُوْا لِلْحَقِّ لَمَّا جَاۤءَهُمْۙ هٰذَا سِحْرٌ مُّبِيْنٌۗ
wa iżā tutlā ‘alaihim āyātunā bayyinātin qālal-lażīna kafarū lil-ḥaqqi lammā jā'ahum, hāżā siḥrum mubīn(un).
Mpe tango batangamaki Ba versets na biso ya polele, baye bandimaki te balobaki tango bosolo eyaki epai na bango: “Oyo ezali magie ya solo.”
اَمْ يَقُوْلُوْنَ افْتَرٰىهُ ۗ قُلْ اِنِ افْتَرَيْتُهٗ فَلَا تَمْلِكُوْنَ لِيْ مِنَ اللّٰهِ شَيْـًٔا ۗهُوَ اَعْلَمُ بِمَا تُفِيْضُوْنَ فِيْهِۗ كَفٰى بِهٖ شَهِيْدًا ۢ بَيْنِيْ وَبَيْنَكُمْ ۗ وَهُوَ الْغَفُوْرُ الرَّحِيْمُ
am yaqūlūnaftarāh(u), qul iniftaraituh(ū), falā tamlikūna lī minallāhi syai'ā(n), huwa a‘lamu bimā tufīḍūna fīh(i), kafā bihī syahīdam bainī wa bainakum, wa huwal-gafūrur-raḥīm(u).
Kasi, balobaka ete, "Ye (Muhammad) asali yango (Coran)." Loba: "Soki nasali yango, olingaki kozala na nguya te ya kobatela ngai na etumbu ya Allah. Ayebi malamu makambo oyo olobi mpo na yango. Akoki lokola motatoli kati na ngai na yo. Azali Mbala mingi ya kolimbisa, ya mawa mingi."
قُلْ مَا كُنْتُ بِدْعًا مِّنَ الرُّسُلِ وَمَآ اَدْرِيْ مَا يُفْعَلُ بِيْ وَلَا بِكُمْۗ اِنْ اَتَّبِعُ اِلَّا مَا يُوْحٰٓى اِلَيَّ وَمَآ اَنَا۠ اِلَّا نَذِيْرٌ مُّبِيْنٌ
qul mā kuntu bid‘am minar-rusuli wa mā adrī mā yuf‘alu bī wa lā bikum, in attabi‘u illā mā yūḥā ilayya wa mā ana illā nażīrum mubīn(un).
Loba (Muhammad), "Nazali Ntoma ya liboso te kati na bamemi-nsango mpe nayebi te nini ekosalema na ngai to na yo. Nalandaka kaka oyo emonisami epai na ngai mpe nazali kaka mopesi ya likebisi oyo alimboli."
قُلْ اَرَءَيْتُمْ اِنْ كَانَ مِنْ عِنْدِ اللّٰهِ وَكَفَرْتُمْ بِهٖ وَشَهِدَ شَاهِدٌ مِّنْۢ بَنِيْٓ اِسْرَاۤءِيْلَ عَلٰى مِثْلِهٖ فَاٰمَنَ وَاسْتَكْبَرْتُمْۗ اِنَّ اللّٰهَ لَا يَهْدِى الْقَوْمَ الظّٰلِمِيْنَ ࣖ
qul ara'aitum in kāna min ‘indillāhi wa kafartum bihī wa syahida syāhidum mim banī isrā'īla ‘alā miṡlihī fa āmana wastakbartum, innallāha lā yahdil-qaumaẓ-ẓālimīn(a).
Loba: "Limbola ngai, okokanisa nini soki oyo (Al Coran) ewutaki mpenza epai ya Allah, mpe owanganaki yango, atako ezalaki na motatoli moko uta na Bana ya Israël oyo andimaki (bosolo) oyo ekokani na (oyo elobelami na) Coran mpe na nsima andimaki, ozali komikumisa. Ya solo, Allah azali kotambwisa bato oyo bazali sembo te."
وَقَالَ الَّذِيْنَ كَفَرُوْا لِلَّذِيْنَ اٰمَنُوْا لَوْ كَانَ خَيْرًا مَّا سَبَقُوْنَآ اِلَيْهِۗ وَاِذْ لَمْ يَهْتَدُوْا بِهٖ فَسَيَقُوْلُوْنَ هٰذَآ اِفْكٌ قَدِيْمٌ
wa qālal-lażīna kafarū lil-lażīna āmanū lau kāna khairam mā sabaqūnā ilaih(i), wa iż lam yahtadū bihī fasayaqūlūna hāżā ifkun qadīm(un).
Mpe baye bandimi te balobaka na baye bandimi ete: "Soki Coran ezalaki eloko ya malamu, ya solo balingaki te kozala liboso na biso (kondima) na yango." Kasi lokola batambwisami na yango te, bakoloba ete: “Oyo ezali lokuta ya kala.”
وَمِنْ قَبْلِهٖ كِتٰبُ مُوْسٰٓى اِمَامًا وَّرَحْمَةً ۗوَهٰذَا كِتٰبٌ مُّصَدِّقٌ لِّسَانًا عَرَبِيًّا لِّيُنْذِرَ الَّذِيْنَ ظَلَمُوْا ۖوَبُشْرٰى لِلْمُحْسِنِيْنَ
wa min qablihī kitābu mūsā imāmaw wa raḥmah(tan), wa hāżā kitābum muṣaddiqul lisānan ‘arabiyyal liyunżiral-lażīna ẓalamū, wa busyrā lil-muḥsinīn(a).
Mpe liboso ya (Coran) ezalaki na Buku ya Moize lokola bokambi mpe ngolu. Mpe oyo (Al Qur’an) ezali buku oyo endimisi yango na arabe mpo na kopesa likebisi na baye basalaka mabe mpe kopesa nsango malamu na baye basalaka malamu.
اِنَّ الَّذِيْنَ قَالُوْا رَبُّنَا اللّٰهُ ثُمَّ اسْتَقَامُوْا فَلَا خَوْفٌ عَلَيْهِمْ وَلَا هُمْ يَحْزَنُوْنَۚ
innal-lażīna qālū rabbunallāhu ṡummastaqāmū falā khaufun ‘alaihim wa lā hum yaḥzanūn(a).
Ya solo, baye balobaka, “Nkolo na biso azali Allah,” mpe sima batikali kokangama, bobangi ekozala te likolo na bango, mpe bakoyoka mawa te.
اُولٰۤىِٕكَ اَصْحٰبُ الْجَنَّةِ خٰلِدِيْنَ فِيْهَاۚ جَزَاۤءً ۢبِمَا كَانُوْا يَعْمَلُوْنَ
ulā'ika aṣḥābul-jannati khālidīna fīhā, jazā'am bimā kānū ya‘malūn(a).
Bango bazali bafandi ya lola, ya seko kati na yango; lokola mbano mpo na oyo basali.
وَوَصَّيْنَا الْاِنْسَانَ بِوَالِدَيْهِ اِحْسَانًا ۗحَمَلَتْهُ اُمُّهٗ كُرْهًا وَّوَضَعَتْهُ كُرْهًا ۗوَحَمْلُهٗ وَفِصٰلُهٗ ثَلٰثُوْنَ شَهْرًا ۗحَتّٰىٓ اِذَا بَلَغَ اَشُدَّهٗ وَبَلَغَ اَرْبَعِيْنَ سَنَةًۙ قَالَ رَبِّ اَوْزِعْنِيْٓ اَنْ اَشْكُرَ نِعْمَتَكَ الَّتِيْٓ اَنْعَمْتَ عَلَيَّ وَعَلٰى وَالِدَيَّ وَاَنْ اَعْمَلَ صَالِحًا تَرْضٰىهُ وَاَصْلِحْ لِيْ فِيْ ذُرِّيَّتِيْۗ اِنِّيْ تُبْتُ اِلَيْكَ وَاِنِّيْ مِنَ الْمُسْلِمِيْنَ
wa waṣṣainal-insāna biwālidaihi iḥsānā(n), ḥamalathu ummuhū kurhaw wa waḍa‘athu kurhā(n), wa ḥamluhū wa fiṣāluhū ṡalāṡūna syahrā(n), ḥattā iżā balaga asyuddahū wa balaga arba‘īna sanah(tan), qāla rabbi auzi‘nī an asykura ni‘matakal-latī an‘amta ‘alayya wa ‘alā wālidayya wa an a‘mala ṣāliḥan tarḍāhu wa aṣliḥ lī fī żurriyyatī, innī tubtu ilaika wa innī minal-muslimīn(a).
Mpe Totindaki bato basala bolamu na baboti na bango. Mama na ye azwaki zemi na ye na mpasi, mpe abotaki ye na mpasi (lisusu). Eleko ya zemi kino kolongolama na mabɛlɛ ezali sanza ntuku misato, na boye ete ntango ye (mwana) akokóma mokóló mpe akokóma na mbula ntuku minei asambeli ete: “Ee Nkolo na ngai, pesa ngai bokambi mpo nazala na botondi mpo na mapamboli na Yo oyo opesi ngai mpe na baboti na ngai mpe mpo nakoka kosala misala malamu oyo Ondimi; mpe pesa ngai bolamu oyo ekokita na bana mpe bankoko na ngai.” Ya solo, nayamboli epai na Yo mpe ya solo, nazali moko ya ba musulmans."
اُولٰۤىِٕكَ الَّذِيْنَ نَتَقَبَّلُ عَنْهُمْ اَحْسَنَ مَا عَمِلُوْا وَنَتَجَاوَزُ عَنْ سَيِّاٰتِهِمْ فِيْٓ اَصْحٰبِ الْجَنَّةِۗ وَعْدَ الصِّدْقِ الَّذِيْ كَانُوْا يُوْعَدُوْنَ
ulā'ikal-lażīna nataqabbalu ‘anhum aḥsana mā ‘amilū wa natajāwazu ‘an sayyi'atihim fī aṣḥābil-jannah(ti), wa‘daṣ-ṣidqil-lażī kānū yū‘adūn(a).
Wana ezali bato oyo tondimaka epai na bango misala malamu oyo basali mpe (baoyo) tolimbisi mabunga na bango, (bakokoma) bafandi ya Paradis. Yango nde elaka ya solo oyo elakamaki na bango.
وَالَّذِيْ قَالَ لِوَالِدَيْهِ اُفٍّ لَّكُمَآ اَتَعِدَانِنِيْٓ اَنْ اُخْرَجَ وَقَدْ خَلَتِ الْقُرُوْنُ مِنْ قَبْلِيْۚ وَهُمَا يَسْتَغِيْثٰنِ اللّٰهَ وَيْلَكَ اٰمِنْ ۖاِنَّ وَعْدَ اللّٰهِ حَقٌّۚ فَيَقُوْلُ مَا هٰذَآ اِلَّآ اَسَاطِيْرُ الْاَوَّلِيْنَ
wal-lażī qāla liwālidaihi uffil lakumā ata‘idāninī an ukhraja wa qad khalatil qurūnu min qablī, wa humā yastagīṡānillāha wailaka āmin, inna wa‘dallāhi ḥaqq(un), fayaqūlu mā hāżā illā asāṭīrul-awwalīn(a).
Mpe moto oyo alobaki na baboti na ye, “Ah.” Bino mibale bokebisaki ngai ete nakosekwa (uta na lilita), atako bato mingi liboso na ngai bakufaki? Na sima baboti basengaki lisalisi epayi ya Allah (kolobaka), "Mawa na yo, ndima! Ya solo, elaka ya Allah ezali ya solo." Na nsima ye (mwana) alobaki ete: “Oyo ezali kaka lisapo ya bato ya kala.”
اُولٰۤىِٕكَ الَّذِيْنَ حَقَّ عَلَيْهِمُ الْقَوْلُ فِيْٓ اُمَمٍ قَدْ خَلَتْ مِنْ قَبْلِهِمْ مِّنَ الْجِنِّ وَالْاِنْسِ ۗاِنَّهُمْ كَانُوْا خٰسِرِيْنَ
ulā'ikal-lażīna ḥaqqa ‘alaihimul-qaulu fī umamin qad khalat min qablihim minal-jinni wal-ins(i), innahum kānū khāsirīn(a).
Bazali bato oyo bazwaki mpenza etumbu (libebi) elongo na bato oyo bazalaki liboso na bango, uta na (bakelasi ya) ba jinn mpe bato. Bango nde ba perdre.
وَلِكُلٍّ دَرَجٰتٌ مِّمَّا عَمِلُوْاۚ وَلِيُوَفِّيَهُمْ اَعْمَالَهُمْ وَهُمْ لَا يُظْلَمُوْنَ
wa likullin darajātum mimmā ‘amilū, wa liyuwaffiyahum a‘mālahum wa hum lā yuẓlamūn(a).
Mpe moto nyonso akozwa molongo engebene na oyo asali, mpe mpo ete Nzambe (Allah) apesa bango mbano mpo na misala mya bango mpe bakosalela bango mabe te.
وَيَوْمَ يُعْرَضُ الَّذِيْنَ كَفَرُوْا عَلَى النَّارِۗ اَذْهَبْتُمْ طَيِّبٰتِكُمْ فِيْ حَيَاتِكُمُ الدُّنْيَا وَاسْتَمْتَعْتُمْ بِهَاۚ فَالْيَوْمَ تُجْزَوْنَ عَذَابَ الْهُوْنِ بِمَا كُنْتُمْ تَسْتَكْبِرُوْنَ فِى الْاَرْضِ بِغَيْرِ الْحَقِّ وَبِمَا كُنْتُمْ تَفْسُقُوْنَ ࣖ
wa yauma yu‘raḍul-lażīna kafarū ‘alan-nār(i), ażhabtum ṭayyibātikum fī ḥayātikumud-dun-yā wastamta‘tum bihā, fal-yauma tujzauna ‘ażābal-hūni bimā kuntum tastakbirūna fil-arḍi bigairil-ḥaqqi wa bimā kuntum tafsuqūn(a).
Mpe (bokanisa) Mokolo oyo bato oyo bazangi kondima bakomemama na Lifelo (mpe bakolobama na bango): "Bolekisi makambo malamu ya bomoi na bino ya mokili mpe bosepeli na yango. Yango wana lelo bokofutama na etumbu ya soni mpo ete bozalaki na lolendo na mabele kozanga kotalela bosolo mpe mpo ete bosalaki na kozanga botosi (botosi Allah)."
۞ وَاذْكُرْ اَخَا عَادٍۗ اِذْ اَنْذَرَ قَوْمَهٗ بِالْاَحْقَافِ وَقَدْ خَلَتِ النُّذُرُ مِنْۢ بَيْنِ يَدَيْهِ وَمِنْ خَلْفِهٖٓ اَلَّا تَعْبُدُوْٓا اِلَّا اللّٰهَ ۗاِنِّيْٓ اَخَافُ عَلَيْكُمْ عَذَابَ يَوْمٍ عَظِيْمٍ
ważkur akhā ‘ād(in), iż anżara qaumahū bil-aḥqāfi wa qad khalatin-nużuru mim baini yadaihi wa min khalfihī allā ta‘budū illallāh(a), innī akhāfu ‘alaikum ‘ażāba yaumin ‘aẓīm(in).
Mpe bomikundola (Hud), ndeko ya 'Ad, ntango akebisaki bato na ye na ntina ya mabanga ya ntalo, mpe ya solo, bakebisi baleki liboso na ye mpe nsima na ye (kolobaka): «sambela moto mosusu te longola se Allah, noki nakobanga ete bokobetama na etumbu na mokolo monene."
قَالُوْٓا اَجِئْتَنَا لِتَأْفِكَنَا عَنْ اٰلِهَتِنَاۚ فَأْتِنَا بِمَا تَعِدُنَآ اِنْ كُنْتَ مِنَ الصّٰدِقِيْنَ
qālū aji'tanā lita'fikanā ‘an ālihatinā fa'tinā bimā ta‘idunā in kunta minaṣ-ṣādiqīn(a).
Bayanolaki ete: "Oyei epai na biso mpo na kotika biso (kosambela) banzambe na biso? Boye bómemela biso etumbu oyo bobangisaki biso soki bozali kati na bato ya solo."
قَالَ اِنَّمَا الْعِلْمُ عِنْدَ اللّٰهِ ۖوَاُبَلِّغُكُمْ مَّآ اُرْسِلْتُ بِهٖ وَلٰكِنِّيْٓ اَرٰىكُمْ قَوْمًا تَجْهَلُوْنَ
qāla innamal ‘ilmu ‘indallāh(i), wa uballigukum mā ursiltu bihī wa lākinnī arākum qauman tajhalūn(a).
Ye (Hud) alobaki: "Ya solo boyebi (ya yango) ezali kaka ya Allah mpe ngai (kaka) nazali kopesa bino maye emonisami epai na ngai, kasi namoni ete bozali bato oyo basalaka na bozoba."
فَلَمَّا رَاَوْهُ عَارِضًا مُّسْتَقْبِلَ اَوْدِيَتِهِمْ قَالُوْا هٰذَا عَارِضٌ مُّمْطِرُنَا ۗبَلْ هُوَ مَا اسْتَعْجَلْتُمْ بِهٖ ۗرِيْحٌ فِيْهَا عَذَابٌ اَلِيْمٌۙ
falammā ra'auhu ‘āriḍam mustaqbila audiyatihim, qālū hāżā ‘āriḍum mumṭirunā, bal huwa masta‘jaltum bih(ī), rīḥun fīhā ‘ażābun alīm(un).
Bongo ntango bamonaki mpasi na lolenge ya lipata ezali koya epai ya mabwaku na bango, balobaki ete: “Oyo ezali lipata oyo ekopesa biso mbula.” (Te!) Kasi oyo ezali mpasi oyo bosengi kosala mbangu (ezali) mopepe oyo ezali na mpasi ya mpasi, .
تُدَمِّرُ كُلَّ شَيْءٍۢ بِاَمْرِ رَبِّهَا فَاَصْبَحُوْا لَا يُرٰىٓ اِلَّا مَسٰكِنُهُمْۗ كَذٰلِكَ نَجْزِى الْقَوْمَ الْمُجْرِمِيْنَ
tudammiru kulla syai'im bi'amri rabbihā fa'aṣbaḥū lā yurā illā masākinuhum, każālika najzil-qaumal-mujrimīn(a).
oyo babebisaki nionso na etinda ya Nkolo na bango, na boye ete bango (bato ya ‘Ad) bakomaki oyo emonanaka te (na mabele) longola se kaka (ba traces ya) esika na bango ya kofanda. Na ndenge wana Tofutaka basumuki.
وَلَقَدْ مَكَّنّٰهُمْ فِيْمَآ اِنْ مَّكَّنّٰكُمْ فِيْهِ وَجَعَلْنَا لَهُمْ سَمْعًا وَّاَبْصَارًا وَّاَفْـِٕدَةًۖ فَمَآ اَغْنٰى عَنْهُمْ سَمْعُهُمْ وَلَآ اَبْصَارُهُمْ وَلَآ اَفْـِٕدَتُهُمْ مِّنْ شَيْءٍ اِذْ كَانُوْا يَجْحَدُوْنَ بِاٰيٰتِ اللّٰهِ وَحَاقَ بِهِمْ مَّا كَانُوْا بِهٖ يَسْتَهْزِءُوْنَ ࣖ
wa laqad makkannāhum fīmā im makkannākum fīhi wa ja‘alnā lahum sam‘aw wa abṣāraw wa af'idah(tan), famā agnā ‘anhum sam‘uhum wa lā abṣāruhum wa lā af'idatuhum min syai'in iż kānū yajḥadūna bi'āyātillāhi wa ḥāqa bihim mā kānū bihī yastahzi'ūn(a).
Mpe ya solo, tondimisi esika na bango (na bomengo mpe makasi) oyo topesaki bino ata mokolo moko te mpe topesaki bango koyoka, komona mpe motema, kasi koyoka, komona mpe motema na bango ezali na litomba te mpo na bango ata moke, mpo ete bango (ntango nyonso) bawanganaka ba versets ya Allah mpe (menace ya) etumbu oyo bazalaki kosalela mpo na kotyola ezingi bango.
وَلَقَدْ اَهْلَكْنَا مَا حَوْلَكُمْ مِّنَ الْقُرٰى وَصَرَّفْنَا الْاٰيٰتِ لَعَلَّهُمْ يَرْجِعُوْنَ
wa laqad ahlaknā mā ḥaulakum minal-qurā wa ṣarrafnal-āyāti la‘allahum yarji‘ūn(a).
Mpe ya solo, Tobebisi bikolo nzinganzinga na bino mpe Tolimboli lisusu mbala na mbala bilembo (ya bonene na Biso), mpo ete bazonga (koyambola).
فَلَوْلَا نَصَرَهُمُ الَّذِيْنَ اتَّخَذُوْا مِنْ دُوْنِ اللّٰهِ قُرْبَانًا اٰلِهَةً ۗبَلْ ضَلُّوْا عَنْهُمْۚ وَذٰلِكَ اِفْكُهُمْ وَمَا كَانُوْا يَفْتَرُوْنَ
falau lā naṣarahumul-lażīnattakhażū min dūnillāhi qurbānan ālihah(tan), bal ḍallū ‘anhum, wa żālika ifkuhum wa mā kānū yaftarūn(a).
Bongo pona nini (bikeko pe banzambe) oyo basambelaka longola se Allah po bapusana penepene (na Ye) bakoki kosunga bango te? Ata banzambe basili kolimwa na bango? Mpe yango ezali mbuma ya lokuta na bango mpe ya makambo oyo bazalaki kosala.
وَاِذْ صَرَفْنَآ اِلَيْكَ نَفَرًا مِّنَ الْجِنِّ يَسْتَمِعُوْنَ الْقُرْاٰنَۚ فَلَمَّا حَضَرُوْهُ قَالُوْٓا اَنْصِتُوْاۚ فَلَمَّا قُضِيَ وَلَّوْا اِلٰى قَوْمِهِمْ مُّنْذِرِيْنَ
wa iż ṣarafnā ilaika nafaram minal-jinni yastami‘ūnal-qur'ān(a), falammā ḥaḍarūhu qālū anṣitū, falammā quḍiya wallau ilā qaumihim munżirīn(a).
Mpe (bomikundola) tango tolakisaki bino (Muhammad) lisanga ya ba jinn oyo bazalaki koyoka (botangi ya) Coran, sima tango bakendeki (botangi) balobaki : « Zala kimia (mpo na koyoka yango) !» Yango wana tango esilaki bazongaki epai ya bato na bango (po) kopesa likebisi.
قَالُوْا يٰقَوْمَنَآ اِنَّا سَمِعْنَا كِتٰبًا اُنْزِلَ مِنْۢ بَعْدِ مُوْسٰى مُصَدِّقًا لِّمَا بَيْنَ يَدَيْهِ يَهْدِيْٓ اِلَى الْحَقِّ وَاِلٰى طَرِيْقٍ مُّسْتَقِيْمٍ
qālū yā qaumanā innā sami‘nā kitāban unzila mim ba‘di mūsā muṣaddiqal limā baina yadaihi yahdī ilal-ḥaqqi wa ilā ṭarīqim mustaqīm(in).
Balobaki: "Ee bato na biso! Ya solo, toyoki Buku (Al-Qur'an) oyo ekitisaki nsima ya Moize, kondimisa (mikanda) oyo eyaki liboso, kokamba na bosolo mpe na nzela ya semba."
يٰقَوْمَنَآ اَجِيْبُوْا دَاعِيَ اللّٰهِ وَاٰمِنُوْا بِهٖ يَغْفِرْ لَكُمْ مِّنْ ذُنُوْبِكُمْ وَيُجِرْكُمْ مِّنْ عَذَابٍ اَلِيْمٍ
yā qaumanā ajībū dā‘iyallāhi wa āminū bihī yagfir lakum min żunūbikum wa yujirkum min ‘ażābin alīm(in).
O bato na biso! Ndima (kobenga ya) moto (Muhammad) oyo abengi epai ya Allah. Mpe ndimela Ye, na ntembe te akolimbisa masumu na yo mpe akobikisa yo na etumbu ya mpasi.
وَمَنْ لَّا يُجِبْ دَاعِيَ اللّٰهِ فَلَيْسَ بِمُعْجِزٍ فِى الْاَرْضِ وَلَيْسَ لَهٗ مِنْ دُوْنِهٖٓ اَوْلِيَاۤءُ ۗ اُولٰۤىِٕكَ فِيْ ضَلٰلٍ مُّبِيْنٍ
wa mal lā yujib dā‘iyallāhi falaisa bimu‘jizin fil-arḍi wa laisa lahū min dūnihī auliyā'(u), ulā'ika fī ḍalālim mubīn(in).
Mpe oyo akondima te (kobenga ya) baye bazali kobenga epai ya Allah (Muhammad) wana akozala na makoki te ya kokima etumbu ya Allah na mabele atako mobateli azali te mpo na ye longola se Allah. Bazali na libunga ya polele.”
اَوَلَمْ يَرَوْا اَنَّ اللّٰهَ الَّذِيْ خَلَقَ السَّمٰوٰتِ وَالْاَرْضَ وَلَمْ يَعْيَ بِخَلْقِهِنَّ بِقٰدِرٍ عَلٰٓى اَنْ يُّحْيِ َۧ الْمَوْتٰى ۗبَلٰٓى اِنَّهٗ عَلٰى كُلِّ شَيْءٍ قَدِيْرٌ
awalam yarau annallāhal-lażī khalaqas-samāwāti wal-arḍa wa lam ya‘ya bikhalqihinna biqādirin ‘alā ay yuḥyiyal-mautā, balā innahū ‘alā kulli syai'in qadīr(un).
Mpe bazali komona te ete Allah akela lola mpe mabele mpe alɛmbi te na kokela yango, mpe ete azali na nguya ya kopesa bomoi na bakufi? Ya solo, Azali na nguya likolo ya biloko nyonso.
وَيَوْمَ يُعْرَضُ الَّذِيْنَ كَفَرُوْا عَلَى النَّارِۗ اَلَيْسَ هٰذَا بِالْحَقِّ ۗ قَالُوْا بَلٰى وَرَبِّنَا ۗقَالَ فَذُوْقُوا الْعَذَابَ بِمَا كُنْتُمْ تَكْفُرُوْنَ
wa yauma yu‘raḍul-lażīna kafarū ‘alan-nār(i), alaisa hāżā bil-ḥaqq(i), qālū balā wa rabbinā, qāla fażūqul-‘ażāba bimā kuntum takfurūn(a).
Mpe (bomikundola) na mokolo (ntango) baye bandimi te bakokutana na lifelo, (bakotuna bango), "Est-ce que oyo (adzab) ezali solo te?" Bayanolaki ete: “Ee, na nzela ya Nkolo na biso.” Allah alobi: «Bongo bomeka etumbu oyo po bowanganaki yango liboso ».
فَاصْبِرْ كَمَا صَبَرَ اُولُوا الْعَزْمِ مِنَ الرُّسُلِ وَلَا تَسْتَعْجِلْ لَّهُمْ ۗ كَاَنَّهُمْ يَوْمَ يَرَوْنَ مَا يُوْعَدُوْنَۙ لَمْ يَلْبَثُوْٓا اِلَّا سَاعَةً مِّنْ نَّهَارٍ ۗ بَلٰغٌ ۚفَهَلْ يُهْلَكُ اِلَّا الْقَوْمُ الْفٰسِقُوْنَ ࣖ
faṣbir kamā ṣabara ulul-‘azmi minar-rusuli wa lā tasta‘jil lahum, ka'annahum yauma yarauna mā yū‘adūn(a), lam yalbaṡū illā sā‘atam min nahār(in), balāg(un), fahal yuhlaku illal-qaumul-fāsiqūn(a).
Na yango, zala na motema molai (E Muhammad) lokola bantoma ya kokangama makasi bazalaki na motema molai, mpe kosenga te ete etumbu ezala mbangu likolo na bango. Mokolo bakomona etumbu oyo elakamaki, ekozala lokola nde batikalaki (na mokili oyo) kasi mwa ntango mokuse na mokolo. Devoir na yo ezali kaka ya ko transmettre. Na yango moko te akobebisama longola se bato oyo bazangi botosi (bazangi botosi Allah).