اَمْ حَسِبْتَ اَنَّ اَصْحٰبَ الْكَهْفِ وَالرَّقِيْمِ كَانُوْا مِنْ اٰيٰتِنَا عَجَبًا
am ḥasibta anna aṣḥābal-kahfi war-raqīmi kānū min āyātinā ‘ajabā(n).
Okanisi ete bato oyo bafandaka na mabulu, mpe (oyo bazali na) ba raqim, bazali kati na bilembo na biso ya kokamwa (ya bonene)?
اِذْ اَوَى الْفِتْيَةُ اِلَى الْكَهْفِ فَقَالُوْا رَبَّنَآ اٰتِنَا مِنْ لَّدُنْكَ رَحْمَةً وَّهَيِّئْ لَنَا مِنْ اَمْرِنَا رَشَدًا
iż awal-fityatu ilal-kahfi fa qālū rabbanā ātinā mil ladunka raḥmataw wa hayyi' lanā min amrinā rasyadā(n).
(Kobosana te) tango bilenge mibali bamibombaki na libulu, basambelaki, "Nkolo na biso. Pesa biso mawa uta na Yo mpe bokambi ya semba mobimba mpo na biso na makambo na biso."
فَضَرَبْنَا عَلٰٓى اٰذَانِهِمْ فِى الْكَهْفِ سِنِيْنَ عَدَدًاۙ
faḍarabnā ‘alā āżānihim fil-kahfi sinīna ‘adadā(n).
Yango wana Tokangaki matoyi na bango na kati ya libulu na boumeli ya bambula mingi.
ثُمَّ بَعَثْنٰهُمْ لِنَعْلَمَ اَيُّ الْحِزْبَيْنِ اَحْصٰى لِمَا لَبِثُوْٓا اَمَدًا ࣖ
Ṡumma ba‘aṡnāhum lina‘lama ayyul-ḥizbaini aḥṣā limā labiṡū amadā(n).
Na nsima Tolamuki bango, mpo ete tokoka koyeba etuluku nini kati na bituluku mibale ezalaki na bosikisiki mingi na kotánga ntango boni bafandaki (na kati ya libulu).
نَحْنُ نَقُصُّ عَلَيْكَ نَبَاَهُمْ بِالْحَقِّۗ اِنَّهُمْ فِتْيَةٌ اٰمَنُوْا بِرَبِّهِمْ وَزِدْنٰهُمْ هُدًىۖ
naḥnu naquṣṣu ‘alaika naba'ahum bil-ḥaqq(i), innahum fityatun āmanū birabbihim wa zidnāhum hudā(n).
Toyebisa bino (Muhammad) lisolo na bango na bosolo. Ya solo, bazali bilenge mibali oyo bandimaka Nkolo na bango, mpe tobakisi bokambi na bango.
وَّرَبَطْنَا عَلٰى قُلُوْبِهِمْ اِذْ قَامُوْا فَقَالُوْا رَبُّنَا رَبُّ السَّمٰوٰتِ وَالْاَرْضِ لَنْ نَّدْعُوَا۟ مِنْ دُوْنِهٖٓ اِلٰهًا لَّقَدْ قُلْنَآ اِذًا شَطَطًا
wa rabaṭnā ‘alā qulūbihim iż qāmū fa qālū rabbunā rabbus-samāwāti wal-arḍi lan nad‘uwa min dūnihī ilāhal laqad qulnā iżan syaṭaṭā(n).
Mpe Tolendisaki mitema na bango ntango batelemaki mpe balobaki: "Nkolo na biso azali Nkolo ya lola mpe ya mabele; tozali kobenga nzambe mosusu te bobele Ye. Ya solo, soki tosalaki bongo, mbɛlɛ tobimisaki maloba maye mazali mosika mpenza na bosolo."
هٰٓؤُلَاۤءِ قَوْمُنَا اتَّخَذُوْا مِنْ دُوْنِهٖٓ اٰلِهَةًۗ لَوْلَا يَأْتُوْنَ عَلَيْهِمْ بِسُلْطٰنٍۢ بَيِّنٍۗ فَمَنْ اَظْلَمُ مِمَّنِ افْتَرٰى عَلَى اللّٰهِ كَذِبًاۗ
hā'ulā'i qaumunattakhażū min dūnihī ālihah(tan), lau lā ya'tūna ‘alaihim bisulṭānim bayyin(in), faman aẓlamu mimmaniftarā ‘alallāhi każibā(n).
Bazali bato na biso oyo basali banzambe (mpo na kosambela) longola Ye. Pourquoi ba bimaka na ba raisons ya polele te (pona ba croyances na bango)? Bongo nani azali injuste koleka mutu oyo alobaka lokuta contre Allah?
وَاِذِ اعْتَزَلْتُمُوْهُمْ وَمَا يَعْبُدُوْنَ اِلَّا اللّٰهَ فَأْوٗٓا اِلَى الْكَهْفِ يَنْشُرْ لَكُمْ رَبُّكُمْ مِّنْ رَّحْمَتِهٖ وَيُهَيِّئْ لَكُمْ مِّنْ اَمْرِكُمْ مِّرْفَقًا
wa iżi‘tazaltumūhum wa mā ya‘budūna illallāha fa'wū ilal-kahfi yansyur lakum rabbukum mir raḥmatihī wa yuhayyi' lakum min amrikum mirfaqā(n).
Mpe soki botiki bango mpe oyo basambelaka longola se Allah, nde boluka ekimelo na kati ya libulu, mpe Nkolo na bino akopesa bino mwa ngolu na ye mpe akopesa bino eloko ya ntina na makambo na bino.
۞ وَتَرَى الشَّمْسَ اِذَا طَلَعَتْ تَّزٰوَرُ عَنْ كَهْفِهِمْ ذَاتَ الْيَمِيْنِ وَاِذَا غَرَبَتْ تَّقْرِضُهُمْ ذَاتَ الشِّمَالِ وَهُمْ فِيْ فَجْوَةٍ مِّنْهُۗ ذٰلِكَ مِنْ اٰيٰتِ اللّٰهِ ۗمَنْ يَّهْدِ اللّٰهُ فَهُوَ الْمُهْتَدِ وَمَنْ يُّضْلِلْ فَلَنْ تَجِدَ لَهٗ وَلِيًّا مُّرْشِدًا ࣖ
wa tarasy-syamsa iżā ṭala‘at tazāwaru ‘an kahfihim żātal-yamīni wa iżā garabat taqriḍuhum żātasy-syimāli wa hum fī fajwatim minh(u), żālika min āyātillāh(i), may yahdillāhu fa huwal-muhtadi wa may yuḍlil falan tajida lahū waliyyam mursyidā(n).
Mpe okomona moi ntango ekobima, kogumbama uta na libulu na bango na loboko ya mobali, mpe ntango ekolala, mosika na bango na loboko ya mwasi ntango bazali na esika monene na kati (libulu). Wana ezali mwa bilembo (ya bonene ya Allah). Oyo azali kokambama na Nzambe (Allah), nde ye oyo azali kokambama; mpe moto nyonso oyo Ye akobungisa nzela, okozwa mosungi te oyo akoki kotambwisa ye.
وَتَحْسَبُهُمْ اَيْقَاظًا وَّهُمْ رُقُوْدٌ ۖوَّنُقَلِّبُهُمْ ذَاتَ الْيَمِيْنِ وَذَاتَ الشِّمَالِ ۖوَكَلْبُهُمْ بَاسِطٌ ذِرَاعَيْهِ بِالْوَصِيْدِۗ لَوِ اطَّلَعْتَ عَلَيْهِمْ لَوَلَّيْتَ مِنْهُمْ فِرَارًا وَّلَمُلِئْتَ مِنْهُمْ رُعْبًا
wa taḥsabuhum aiqāẓaw wa hum ruqūd(un), wa nuqallibuhum żātal-yamīni wa żātasy-syimāl(i), wa kalbuhum bāsiṭun żirā‘aihi bil-waṣīd(i), lawiṭṭala‘ta ‘alaihim lawallaita minhum firāraw wa lamuli'ta minhum ru‘bā(n).
Mpe okanisi ete bazali kolala te, kasi bazali kolala; mpe Tobalusaki bango liboso mpe nsima na loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, ntango mbwa ya bango etandolaki maboko na ye liboso ya ekuke ya libulu. Mpe soki omoni bango, ya solo olingaki kobalukela bango (mosika) na bango mpe olingaki mpenza kotonda na bobangi mpo na bango.
وَكَذٰلِكَ بَعَثْنٰهُمْ لِيَتَسَاۤءَلُوْا بَيْنَهُمْۗ قَالَ قَاۤىِٕلٌ مِّنْهُمْ كَمْ لَبِثْتُمْۗ قَالُوْا لَبِثْنَا يَوْمًا اَوْ بَعْضَ يَوْمٍۗ قَالُوْا رَبُّكُمْ اَعْلَمُ بِمَا لَبِثْتُمْۗ فَابْعَثُوْٓا اَحَدَكُمْ بِوَرِقِكُمْ هٰذِهٖٓ اِلَى الْمَدِيْنَةِ فَلْيَنْظُرْ اَيُّهَآ اَزْكٰى طَعَامًا فَلْيَأْتِكُمْ بِرِزْقٍ مِّنْهُ وَلْيَتَلَطَّفْ وَلَا يُشْعِرَنَّ بِكُمْ اَحَدًا
wa każālika ba‘aṡnāhum liyatasā'alū bainahum, qāla qā'ilum minhum kam labiṡtum, qālū labiṡnā yauman au ba‘ḍa yaum(in), qālū rabbukum a‘lamu bimā labiṡtum, fab‘aṡū aḥadakum biwariqikum hāżihī ilal-madīnati falyanẓur ayyuhā azkā ṭa‘āman falya'tikum birizqim minhu walyatalaṭṭaf wa lā yusy‘iranna bikum aḥadā(n).
Mpe boye Tolamuki bango, mpo ete bakoka kotunana mituna. Moko na bango alobaki: "Ozali (awa) banda ntango boni?" Bayanolaki, “Tozali (awa) mokolo moko to ndambo ya mokolo.” Alobi (mosusu), "Nzambe na bino ayebi malamu ntango boni bozali (awa). Boye boyebisa moko na bino akende na mboka na mbongo ya palata na bino, mpe tika ye amona bilei nini eleki malamu, mpe amemela mwa ndambo na yango mpo na bino, mpe tika ye azala na boboto mpe ayebisa moto moko te mpo na bino."
اِنَّهُمْ اِنْ يَّظْهَرُوْا عَلَيْكُمْ يَرْجُمُوْكُمْ اَوْ يُعِيْدُوْكُمْ فِيْ مِلَّتِهِمْ وَلَنْ تُفْلِحُوْٓا اِذًا اَبَدًا
innahum iy yaẓharū ‘alaikum yarjumūkum au yu‘īdūkum fī millatihim wa lan tufliḥū iżan abadā(n).
Ya solo, soki bayebaki esika ozali, na ntembe te bakobatela yo mabanga to na makasi ozonga na lingomba na bango, mpe na likambo yango, okolonga soko moke te.”
وَكَذٰلِكَ اَعْثَرْنَا عَلَيْهِمْ لِيَعْلَمُوْٓا اَنَّ وَعْدَ اللّٰهِ حَقٌّ وَّاَنَّ السَّاعَةَ لَا رَيْبَ فِيْهَاۚ اِذْ يَتَنَازَعُوْنَ بَيْنَهُمْ اَمْرَهُمْ فَقَالُوا ابْنُوْا عَلَيْهِمْ بُنْيَانًاۗ رَبُّهُمْ اَعْلَمُ بِهِمْۗ قَالَ الَّذِيْنَ غَلَبُوْا عَلٰٓى اَمْرِهِمْ لَنَتَّخِذَنَّ عَلَيْهِمْ مَّسْجِدًا
wa każālika a‘ṡarnā ‘alaihim liya‘lamū anna wa‘dallāhi ḥaqquw wa annas-sā‘ata lā raiba fīhā, iż yatanāza‘ūna bainahum amrahum fa qālubnū ‘alaihim bun-yānā(n), rabbuhum a‘lamu bihim, qālal-lażīna galabū ‘alā amrihim lanattakhiżanna ‘alaihim masjidā(n).
Mpe bongo (lisusu) Tolakisaki (bato) elongo na bango, mpo ete bayeba ete elaka ya Allah ezali ya solo, mpe ete (koya ya) Mokolo ya Kosambisama ezali na ntembe te mpo na yango. Ntango bazalaki kowelana mpo na makambo na bango, balobaki ete: “Bótɛlɛmisa ndako likoló ya (libulu) na bango, Nkolo na bango ayebi bango malamu koleka.” Moto oyo azalaki na bokonzi likolo ya makambo na bango alobaki: "Tokotonga mpenza ndako ya losambo likolo na yango."
سَيَقُوْلُوْنَ ثَلٰثَةٌ رَّابِعُهُمْ كَلْبُهُمْۚ وَيَقُوْلُوْنَ خَمْسَةٌ سَادِسُهُمْ كَلْبُهُمْ رَجْمًاۢ بِالْغَيْبِۚ وَيَقُوْلُوْنَ سَبْعَةٌ وَّثَامِنُهُمْ كَلْبُهُمْ ۗقُلْ رَّبِّيْٓ اَعْلَمُ بِعِدَّتِهِمْ مَّا يَعْلَمُهُمْ اِلَّا قَلِيْلٌ ەۗ فَلَا تُمَارِ فِيْهِمْ اِلَّا مِرَاۤءً ظَاهِرًا ۖوَّلَا تَسْتَفْتِ فِيْهِمْ مِّنْهُمْ اَحَدًا ࣖ
sayaqūlūna ṡalāṡatur rābi‘uhum kalbuhum, wa yaqūlūna khamsatun sādisuhum kalbuhum rajmam bil-gaib(i), wa yaqūlūna sab‘atuw wa ṡāminuhum kalbuhum, qur rabbī a‘lamu bi‘iddatihim mā ya‘lamuhum illā qalīl(un), falā tumāri fīhim illā mirā'an ẓāhirā(n), wa lā tastafti fīhim minhum aḥadā(n).
Na sima (bato mosusu bako) koloba, "(Motango na bango ezali) misato (bato), ya minei ezali mbwa," mpe (basusu) balobi, "(Motango na bango ezali) mitano (bato), ya motoba ezali mbwa," lokola devinette na ntina ya oyo eleki ya bomoto; mpe (mosusu) alobaki, "(Motango na bango) ezali nsambo (bato), ya mwambe ezali mbwa." Loba (Muhammad), "Nkolo na ngai ayebi motango na bango malamu koleka; moto moko te ayebi (motango) na bango longola se mwa ndambo." Yango wana, bino (Muhammad) bozali koswana mpo na bango te, longola se ba arguments ya libanda mpe kotuna moto moko te mpo na yango (ba bilenge mibali).
وَلَا تَقُوْلَنَّ لِشَا۟يْءٍ اِنِّيْ فَاعِلٌ ذٰلِكَ غَدًاۙ
wa lā taqūlanna lisyai'in innī fā‘ilun żālika gadā(n).
Mpe koloba ata moke te mpo na eloko moko, “Nakosala yango mpenza lobi na ntongo,” .
اِلَّآ اَنْ يَّشَاۤءَ اللّٰهُ ۖوَاذْكُرْ رَّبَّكَ اِذَا نَسِيْتَ وَقُلْ عَسٰٓى اَنْ يَّهْدِيَنِ رَبِّيْ لِاَقْرَبَ مِنْ هٰذَا رَشَدًا
illā ay yasyā'allāh(u), ważkur rabbaka iżā nasīta wa qul ‘asā ay yahdiyani rabbī li'aqraba min hāżā rasyadā(n).
longola se (na kolobaka), "Nzambe alingi." Mpe bomikundola Nkolo na bino soki bobosani pe bolobi: "Na elikia Nkolo na ngai akokamba ngai po nazala penepene (na bosolo) koleka oyo."
وَلَبِثُوْا فِيْ كَهْفِهِمْ ثَلٰثَ مِائَةٍ سِنِيْنَ وَازْدَادُوْا تِسْعًا
wa labiṡū fī kahfihim ṡalāṡa mi'atin sinīna wazdādū tis‘ā(n).
Mpe bafandaki na libulu yango mbula nkama misato bakisa mpe mbula libwa.
قُلِ اللّٰهُ اَعْلَمُ بِمَا لَبِثُوْا ۚ لَهٗ غَيْبُ السَّمٰوٰتِ وَالْاَرْضِۗ اَبْصِرْ بِهٖ وَاَسْمِعْۗ مَا لَهُمْ مِّنْ دُوْنِهٖ مِنْ وَّلِيٍّۗ وَلَا يُشْرِكُ فِيْ حُكْمِهٖٓ اَحَدًا
qulillāhu a‘lamu bimā labiṡū, lahū gaibus-samāwāti wal-arḍ(i), abṣir bihī wa asmi‘, mā lahum min dūnihī miw waliyy(in), wa lā yusyriku fī ḥukmihī aḥadā(n).
Loba: "Allah ayebi malamu ntango boni batikalaki (na kati ya libulu); epai na Ye ezali nyonso oyo ebombami na lola mpe na mabele. Ndenge nini bomoni na Ye ezali kongenga mpe boniboni mayoki na Ye ezali na makasi; mobateli azali te mpo na bango longola se Ye; mpe azwaka moto moko te lokola molongani na Ye mpo na kokata mikano."